Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 27:12 - Mokanda na Bomoi

12 Sima na yango, tango bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bafundaki Ye, azongisaki lisusu eloko moko te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 27:12
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ; akangaki monoko na ye.


Kasi Yesu abatelaki kimia. Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye : — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »


Bongo Pilato atunaki Ye : — Ozali koyoka te makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda Yo ?


Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe moyangeli akamwaki makasi.


Apesaki ye mituna ebele, kasi Yesu apesaki ye ata eyano moko te.


Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga : « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.


Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ