Nalobaki na bango : — Soki bomoni ete ezali malamu, bopesa ngai lifuti na ngai ; soki te, botika na bino. Bafutaki ngai mbongo ya bibende ya palata tuku misato lokola lifuti na ngai.
Mpe Yawe alobaki na ngai : — Bwaka yango epai ya mosali mbeki ; yango nde motuya ya malonga oyo bamoni ete ekoki na Ngai ! Nakamataki mbongo yango ya bibende tuku misato mpe nabwakaki yango kati na Tempelo ya Yawe, epai ya mosali mbeki.