Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bato wana ; elobeli na yo ezali kofunda yo.
Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato.
Alobaki na mama na ye : — Shekeli ya palata nkoto moko na nkama moko oyo bayibaki yo, oyo na tina na yango olakelaki mabe na miso na ngai, ezali na maboko na ngai ; ngai nde nazwaki yango. Mama na ye alobaki na ye : — Mwana na ngai, tika ete Yawe apambola yo !
Tokoki te kopesa bango bana na biso ya basi na libala, pamba te, biso bana ya Isalaele, tolapaki ndayi oyo : ‹ Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobalisa mwana na ye ya mwasi na mobali ya libota ya Benjame. › »