Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:73 - Mokanda na Bomoi

73 Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bato wana ; elobeli na yo ezali kofunda yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:73
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati-kati mobimba ya bana na bango bazalaki koloba lokota ya bato ya Asidodi to lokota ya ekolo moko kati na bikolo mosusu, kasi bayebaki te koloba lokota ya Bayuda.


Petelo awanganaki yango lisusu na kolapa ndayi : — Nayebi moto wana te !


Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : — Tika ete Nzambe alakela ngai mabe soki nakosi ! Nalapi ndayi : Nayebi moto yango te ! Mpe, mbala moko, soso elelaki.


Petelo awanganaki lisusu. Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bazongelaki koloba na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bango, mpe ozali moto ya Galile.


Bakamwaki mingi penza mpe bakomaki kotuna : « Boni, bato nyonso oyo bazali koloba, bazali bato ya Galile te ?


bazalaki kosenga ete aloba : « Shiboleti ; » soki alobi : « Siboleti, » mpo ete akoki te koloba yango malamu, bazalaki kokanga ye mpe koboma ye na esika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Na tango wana, babomaki bato ya Efrayimi nkoto tuku minei na mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ