Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:72 - Mokanda na Bomoi

72 Petelo awanganaki yango lisusu na kolapa ndayi : — Nayebi moto wana te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:72
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba.


Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te !


bosalaka mabongisi ya komonisa baninga na bino pasi te, bolingaka te kolapa ndayi ya lokuta ; pamba te makambo wana nyonso, nayina yango makasi, » elobi Yawe.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Wana Petelo azalaki kokende na ekuke mpo na kobima, mwasi mosali mosusu amonaki ye mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana : — Moto oyo azalaki elongo na Yesu ya Nazareti.


Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bato wana ; elobeli na yo ezali kofunda yo.


Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : — Tika ete Nzambe alakela ngai mabe soki nakosi ! Nalapi ndayi : Nayebi moto yango te ! Mpe, mbala moko, soso elelaki.


Yesu alobaki na ye : — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ