Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo ? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te ?
Moko kati na baninga ya Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; akotaki kati na lopango mpe avandaki elongo na bakengeli mpo na kotala ndenge makambo ekosuka.
Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki : — Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile.
Wana Petelo azalaki kokende na ekuke mpo na kobima, mwasi mosali mosusu amonaki ye mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana : — Moto oyo azalaki elongo na Yesu ya Nazareti.
Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »