Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:7 - Mokanda na Bomoi

7 mwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:7
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elize abengisaki moko kati na bayekoli ya basakoli mpe alobaki na ye : « Kanga mokaba na yo, zwa molangi oyo ya mafuta mpe kende na Ramoti ya Galadi.


Ezali lokola malasi ya motuya oyo basopi na moto, bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron, ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye.


Ndenge nzinzi ekufa ekomisaka malasi solo mabe, ndenge wana mpe mwa bozoba ebebisaka bwanya mpe lokumu.


Tika ete bilamba na yo ezala tango nyonso peto, mpe nzoto na yo elumba tango nyonso solo ya malasi.


Solo ya malasi na yo ezali kitoko, mobimba na yo ezali lokola solo ya malasi ya kitoko oyo epanzani ; yango wana bilenge basi balingaka yo !


Okendeki epai ya Moloki na mafuta ya olive mpe obakisaki lisusu malasi na yo. Otindaki bantoma na yo mosika, omikitisaki na se penza kino na mboka ya bakufi.


Tango bayekoli bamonaki bongo, basilikaki mpe balobaki : — Mpo na nini kobebisa malasi boye ?


Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, mwasi moko akotaki, wana Yesu azalaki na mesa. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi ; afungolaki molangi yango mpe asopaki malasi yango na moto ya Yesu.


Opakolaki Ngai mafuta te na moto ; kasi ye, asopeli makolo na Ngai malasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ