Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye : — Sakola ! Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata.
Wana bazalaki kosepela, bagangaki : « Bomemela biso Samison mpo ete asepelisa biso ! » Babimisaki Samison na boloko mpe akomaki kosala masano liboso na bango. Tango batelemisaki ye na kati-kati ya makonzi ya tempelo na bango,