Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:55 - Mokanda na Bomoi

55 Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:55
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki : — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?


Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.


Yesu alongwaki na esika wana mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana pene na ye ; bongo akomaki lisusu koteya bango kolanda momesano na Ye.


Wana Yesu azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, atunaki : — Ndenge nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Klisto azali Mwana ya Davidi ?


Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Tempelo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya Bayuda bazalaki koluka koboma Ye ;


Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye ;


Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye.


Tango mikolo ya feti ekomaki na kati-kati, Yesu akendeki na Tempelo mpe akomaki koteya.


Kaka na tango yango, wana Yesu azalaki koteya kati na Tempelo, alobaki na mongongo makasi : — Solo, boyebi Ngai mpe boyebi epai nawuti ! Nzokande, nayei na ndenge na Ngai moko te ; ezali Ye oyo azali penza ya solo nde atindi Ngai, mpe bino, boyebi Ye te.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, azongaki kati na lopango ya Tempelo ; mpe lokola bato nyonso bayaki kozingela Ye, avandaki mpe abandaki koteya bango.


Yesu alobaki bongo, wana azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, pene ya esika oyo bazalaki kotia makabo ; mpe moto ata moko te amekaki kokanga Ye, pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ