51 Moko kati na baninga ya Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
Bongo moko kati na bato oyo bazalaki wana abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
Yesu abalukaki mpo na kotala bango malamu mpe apamelaki bango : [— Boni, boyebi molimo oyo ezali kotindika bino na makanisi ya boye ? Mwana na Moto ayaki te mpo na koboma bato, kasi mpo na kobikisa bango.]
Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.
Bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe mpo na kokweyisa bandako batonga makasi. Solo, tobukaka makanisi ya mabe,