Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:47 - Mokanda na Bomoi

47 Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:47
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe


Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.


Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko ; alobaki na bango : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokanga ye. »


Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.


mpe alobaki na bango : « Bandeko na ngai, esengelaki ete masakoli ya Makomi ekokisama ; pamba te Molimo Mosantu aloba wuta kala, na nzela ya Davidi, na tina na Yuda oyo atambolisaki bato oyo bakangaki Yesu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ