45 Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Ngonga ekoki ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.
Na midi, Eliya akomaki kotiola bango, alobaki : « Boganga lisusu makasi, pamba te azali nzambe ; tango mosusu azali kokanisa makambo ebele to akangami na misala mosusu to azali na mobembo ; to mpe azali kolala, boye esengeli bino kolamusa ye. »
Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.
Azongiselaki bango : — Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye : « Moteyi alobi : ‹ Tango na Ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo. › »
« Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »
Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.
Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo !
Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.
Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki : Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo ;