44 Boye, atikaki bango mpe akendeki lisusu mosika ; mpe, mpo na mbala ya misato, abondelaki na maloba kaka wana.
Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo.
Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Ngonga ekoki ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.
Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi.
Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.
Mpo na yango, nabondelaki Nkolo mbala misato mpo ete nzube yango elongwa na nzoto na ngai.