Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki : — Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema !
Petelo mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango kaka balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu elongo na mibali wana mibale bazali ya kotelema elongo na Ye.
Nzokande, elenge mobali moko avandaki na lininisa ; kombo na ye ezalaki Etikisi. Lokola Polo azalaki kaka kokoba koloba, pongi makasi ekangaki Etikisi, mpe, mbala moko, akweyaki na mabele wuta na etaje ya misato. Tango batombolaki ye, bamonaki ete asili kokufa.