34 Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
Petelo alobaki : — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango likolo na Yo, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.
Bongo Petelo akanisaki maloba ya Yesu : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.
Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. » Mpe alelaki makasi.
Yesu alobaki na ye : — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.
Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »
Yesu azongiselaki ye : — Obongami penza kokufa mpo na Ngai ! Nazali koloba na yo penza ya solo : liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.