Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:31 - Mokanda na Bomoi

31 Yesu alobaki na bango : — Na butu ya lelo, bokokweyisa kondima na bino mpo na Ngai ; pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ya etonga ekopalangana. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:31
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Motema na ngai ezangi kimia, makasi na ngai ekomi kosila, nabungisi ata pole ya miso na ngai.


Oyebi ndenge nini nazali kofingama, oyebi soni mpe kosambwa na ngai ; banguna na ngai nyonso bazali liboso na Yo.


Ezingelaka ngai mikolo nyonso, lokola mayi, na bangambo nyonso.


Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama ; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.


Nabengisaki baninga na ngai, kasi bakosaki ngai. Banganga-Nzambe mpe bakambi na ngai bakufaki kati na engumba tango bazalaki koluka bilei mpo ete bawumela na bomoi.


Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.


Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !


Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.


Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama. Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.


Kasi boyeba malamu ete tango ezali koya, mpe esili kokoka, tango oyo bokopanzana na bangambo nyonso, moto na moto na ngambo na ye, mpe oyo bokotika Ngai, Ngai moko. Kasi nazali Ngai moko te, pamba te Tata azali elongo na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ