Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele ; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba : « Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango, tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. »
Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »
Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki : — Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile.
Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto.
Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.