Matayo 26:29 - Mokanda na Bomoi29 Nazali koloba na bino penza ya solo : kobanda sik’oyo, nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, elongo na bino, kati na Bokonzi ya Tata na Ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema ; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.