Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:26 - Mokanda na Bomoi

26 Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na koloba : — Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa mpe bolia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:26
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato.


Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango na koloba : — Bomela yango bino nyonso ;


Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso.


Sima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki : — Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino,


Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango.


Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.


Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo, oyo asengelaki kokende na mobembo, mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu.


mpe bamelaki bango nyonso mayi ya molimo ya ndenge moko ; pamba te bazalaki komela na libanga ya molimo, oyo ezalaki kotambola elongo na bango ; mpe libanga yango ezalaki Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ