Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:25 - Mokanda na Bomoi

25 Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki : — Moteyi, ezali ngai ? Yesu azongiselaki ye : — Olobi yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:25
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Geazi akotaki mpe atelemaki liboso ya nkolo na ye, Elize. Elize atunaki ye : — Geazi, okendeki wapi ? Geazi azongisaki : — Mosali na yo akendeki epai moko te.


Tala ndenge mwasi ya ndumba asalaka : Soki alie, apangusaka monoko ; mpe na sima, akoloba : « Nasali na ngai mabe te ! »


balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe babenga bango ‹ Moteyi. ›


Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko.


Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe


Mbala moko, apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Mbote, Moteyi ! Mpe apesaki Ye beze.


Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.


Yesu asambaki liboso ya moyangeli. Moyangeli atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : — Olobi yango.


Bango nyonso batunaki : — Ozali Mwana na Nzambe ? Yesu azongisaki : — Bino nde bolobi ete nazali Mwana na Nzambe.


Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ? Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.


Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu : — Rabi, lia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ