20 Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale.
Tala ndenge nini bokolia yango : bokolata mokaba na loketo, basandale na makolo, mpe bokosimba lingenda na loboko. Bokolia yango na lombangu. Ezali feti ya Pasika mpo na Yawe.
Tango mokonzi azalaki kolia na mesa na ye, malasi na ngai ya nare ezalaki kopanza solo na yango ya kitoko.
Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
Sima na Yesu koloba bongo, amitungisaki makasi kati na motema ; alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.