Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:18 - Mokanda na Bomoi

18 Azongiselaki bango : — Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye : « Moteyi alobi : ‹ Tango na Ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:18
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe, mbala moko, akotika yango kokende.


Bolinga te ete bato babenga bino ‹ bakonzi, › pamba te bozali kaka na Mokonzi moko, Klisto.


Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko.


Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.


« Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »


Mbala moko, apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Mbote, Moteyi ! Mpe apesaki Ye beze.


Wana Yesu azalaki nanu koloba, ndambo ya bato bayaki longwa na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani mpo na koloba na ye : — Mwana na yo ya mwasi asili kokufa ; mpo na nini ozali lisusu kotungisa moteyi ?


Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.


Sima na Marte koloba bongo, akendeki kobenga Mari, ndeko na ye ; mpe wana abendaki ye pembeni, alobaki na ye na mongongo ya se penza : — Moteyi ayei, azali kobenga yo.


Yesu azongiselaki bango : — Sik’oyo, ngonga ekoki, ngonga oyo Mwana na Moto asengeli kokota kati na nkembo na Ye.


Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.


Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki : Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo ;


Yesu alobaki na ye : — Mari ! Mari abalukaki mpe alobaki na lokota ya Ebre : — Rabuni  !


Na bongo, balukaki kokanga Yesu, kasi moto ata moko te alongaki ; pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.


Yesu azongiselaki bango : — Tango na Ngai ekoki nanu te ; kasi mpo na bino, tango nyonso ezali malamu.


Bino, bokende na feti wana ; kasi Ngai, nakokende te, pamba te tango na Ngai ekoki nanu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ