Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:15 - Mokanda na Bomoi

15 mpe atunaki bango : — Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino ? Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:15
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola Yuda ayebaki te ete ezali bokilo na ye ya mwasi, apusanaki na esika oyo azalaki, pembeni ya nzela, mpe alobaki na ye : — Yaka, ndima ete tosangisa na yo nzoto. Tamari atunaki : — Okopesa ngai nini soki osangisi na ngai nzoto ?


Soki ngombe ebeti mowumbu ya mobali to mwasi mowumbu maseke, nkolo na yango asengeli kofuta mbongo ya bibende, tuku misato, epai ya nkolo ya mowumbu, mpe bakobamba ngombe yango mabanga.


Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te. Bazali babateli oyo bazangi bososoli, moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko mpe alukaka kaka bolamu na ye moko.


bagrame nkama misato na tuku motoba ya palata mpo na mwasi ;


Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.


Banda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu.


Na nzela ya mbongo oyo azwaki lokola lifuti ya mabe na ye, asombaki elanga ; akweyaki kuna moto na se, libumu na ye epasukaki, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki.


molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na boboto, moto oyo aswanaka te, moto na lokoso ya mbongo te,


Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.


Bakambi ya Filisitia bakendeki epai ya Dalila mpe balobaki na ye : « Solola na ye na maloba ya sukali mpo ete alakisa yo sekele ya makasi na ye mpe ndenge nini tokoki kolonga ye, mpo ete tokanga ye basinga mpe tosilisa ye makasi. Moko na moko kati na biso akopesa yo mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. »


Mika alobaki na ye : — Vanda elongo na ngai. Okozala tata mpe nganga na ngai ; nakopesa yo na mobu moko mbongo ya bibende ya palata, zomi, bilamba ya kolata mpe biloko ya kolia. Molevi akomaki kosala epai ya Mika.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ