Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:14 - Mokanda na Bomoi

14 Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:14
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.


Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki : — Moteyi, ezali ngai ? Yesu azongiselaki ye : — Olobi yango.


Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.


Tango Yuda oyo atekaki Yesu amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema mpe akendeki kozongisa mbongo wana ya bibende tuku misato epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato.


Bongo moko kati na bayekoli ya Yesu, Yuda Isikarioti, ye oyo akoteka Ye, alobaki :


Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu.


Yesu azongisaki : — Ezali moto oyo nakopesa eteni oyo ya lipa sima na Ngai kozindisa yango kati na elubu. Bongo, sima na Yesu kozindisa eteni yango ya lipa kati na elubu, akamataki yango mpe apesaki yango epai ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona.


Boye, tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, abimaki mbala moko. Mpe butu ekotaki.


Yuda oyo asilaki komibongisa mpo na kokaba Yesu ayebaki esika yango malamu, pamba te Yesu azalaki kokende kuna mbala mingi elongo na bayekoli na Ye.


mpe alobaki na bango : « Bandeko na ngai, esengelaki ete masakoli ya Makomi ekokisama ; pamba te Molimo Mosantu aloba wuta kala, na nzela ya Davidi, na tina na Yuda oyo atambolisaki bato oyo bakangaki Yesu.


Na nzela ya mbongo oyo azwaki lokola lifuti ya mabe na ye, asombaki elanga ; akweyaki kuna moto na se, libumu na ye epasukaki, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ