Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:11
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.


Tango Yesu amonaki bongo, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo ? Asali Ngai likambo moko ya malamu.


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


Bokozalaka na babola tango nyonso mpe bokoki tango nyonso kosalelaka bango bolamu oyo bolingi ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.


Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.


Bana na Ngai, natikali na tango moke kaka ya kozala lisusu elongo na bino. Bokoluka Ngai ; mpe makambo oyo nalobaki na Bayuda, yango mpe nazali koyebisa bino sik’oyo : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna. »


Etikali kaka tango moke, mokili ekomona Ngai lisusu te ; kasi bino, bokomona Ngai. Mpo ete nazali na bomoi, bino mpe bokozala na bomoi.


Solo, nawutaki epai ya Tata mpe nayaki kati na mokili ; mpe sik’oyo, nazali kotika mokili mpe nazali kozonga epai ya Tata.


Sik’oyo, nazali kokende epai na Ye oyo atindaki Ngai, mpe moko te kati na bino azali kotuna Ngai : « Ozali kokende wapi ? »


Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo ; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko.


Asengeli kotikala kuna na Likolo kino na tango oyo Nzambe akobongisa biloko nyonso, ndenge alaka yango wuta kala na nzela ya babulami na Ye, basakoli.


Basengaki na biso kaka ete tokoba kokanisa babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango.


Nzokande lokola babola bakozala kaka kati na mokili, ngai nazali kotinda bino ete bofungola maboko na bino epai ya bandeko na bino, epai ya babola mpe epai bato nyonso oyo bakelela kati na mokili na bino.


Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ