Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 26:10 - Mokanda na Bomoi

10 Tango Yesu amonaki bongo, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo ? Asali Ngai likambo moko ya malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 26:10
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nayebisaki bango lisusu ndenge nini loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai mpe makambo oyo mokonzi alobaki na ngai. Mbala moko, bazongisaki : — Totelema mpe totonga ! Boye bazwaki mpiko mpe babandaki mbala moko mosala kitoko yango.


Boni, bozali kokotela Nzambe na nzela ya lokuta mpe ya maloba ya solo te ?


Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.


Bakokaki ata koteka yango na motuya makasi mpe kopesa mbongo epai ya babola !


Kasi Yesu alobaki : — Botika ye ! Mpo na nini kotungisa ye ? Asali Ngai likambo moko ya malamu.


Wana Yesu azalaki nanu koloba, moto moko ayaki wuta na ndako ya Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe alobaki : — Mwana na yo ya mwasi akufi. Kotungisa lisusu Moteyi te.


Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,


oyo ezalaka kutu te. Solo, ezali na bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino mpe bazali koluka kobongola Sango Malamu ya Klisto.


Boye tika ete bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino bamilongola ata banzoto ya mibali !


Kobanda lelo, tika ete moto moko te apesa ngai lisusu pasi na motema, pamba te nazali komema bilembo ya bapota ya Yesu kati na nzoto na ngai.


Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.


mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,


balendisa mitema na bino mpe bapesa bino makasi ya kosala bolamu kati na misala mpe maloba nyonso !


Tala liloba oyo ezali penza ya solo : Moto nyonso oyo alingi kozala mokambi kati na Lingomba aponi mosala ya kitoko.


kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.


Soki moto amibateli peto na makambo nyonso oyo nawuti koloba, akozala lokola sani oyo babongisi mpo na koyamba bato ya lokumu, akozala bule, moto na tina mpo na Nkolo mpe moto oyo babongisi mpo na misala nyonso ya malamu.


Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Yebisa bango lisusu ete basengeli kotosa bakambi mpe bakonzi, koselingwa mpo na misala nyonso ya malamu,


Bandeko na biso mpe basengeli koyekola komipesa na misala ya malamu, mpo na kosunga bosenga nyonso mpe kobika bomoi oyo ekobotaka bambuma.


Makambo oyo nawuti koloba ezali penza ya solo ; mpe nalingi ete obetelaka yango sete makasi, mpo ete bato oyo bandimeli Nzambe bamipesa mobimba mpo na kosala misala ya malamu. Yango nde makambo oyo ezali penza malamu mpe na tina mpo na bato.


apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !


Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ