Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 25:9 - Mokanda na Bomoi

9 Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 25:9
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na ngai : « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai ! Tika ete bakende mosika na Ngai !


na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki Noa, Daniele mpe Yobo bazalaki kati na bavandi na yango, balingaki kokoka te kobikisa ata mwana moko ya mobali to ya mwasi ; bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango.


Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.


Kati na bango, mitano bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele.


Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »


Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga.


Boye, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo ete alimbisa yo, soki ekoki kosalema, mpo na makanisi oyo ozalaki na yango kati na motema na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ