Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 25:8 - Mokanda na Bomoi

8 Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 25:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, mwinda ya moto mabe ekufaka, moto na yango etikaka kopela.


Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ? Mbala boni pasi ezali kokitela bango ? Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye ?


ba-oyo batielaka bomengo na bango motema mpe bamikumisaka mpo na bofuluki ya bozwi na bango ?


Pole ya bato ya sembo engengaka makasi, kasi mwinda ya bato mabe ekufaka.


Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.


Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.


Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango.


Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »


Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.


Bomilengela mpo na mosala mpe bobatela minda na bino ya kopela.


Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. »


Boye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka ! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.


Simona azongisaki : — Bobondela Nkolo mpo na ngai mpo ete, kati na oyo bowuti koloba, eloko moko te ekomela ngai.


Yango wana, lokola elaka ya kokota kati na bopemi ya Nzambe ezali nanu, tosala keba ete moko kati na bino akanisa ete azangeli.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ