7 Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango.
Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.
Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye ! »
Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »
Bomilengela mpo na mosala mpe bobatela minda na bino ya kopela.
Yango wana, balingami na ngai, wana bozali kozela yango, bosala makasi mpo ete Nzambe akuta bino peto, bozangi pamela mpe bozali kati na kimia oyo apesaka.
Lamuka ! Lendisa bato oyo batikali mpe ba-oyo bakomi pene ya kokufa, pamba te namoni ete misala na yo ezali ya kokoka te liboso ya Nzambe na Ngai.