Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 25:6 - Mokanda na Bomoi

6 Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 25:6
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

liboso ya Yawe, pamba te azali koya ! Solo, azali koya kosambisa mabele ; akosambisa mokili na bosembo, mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.


liboso ya Yawe, pamba te azali koya kosambisa mabele ! Akokata makambo na yango na bosembo.


Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »


« Yango wana, Isalaele, tala makambo oyo nakosala yo ! Mpe lokola nakosala yo bongo, Isalaele, mibongisa mpo na kokutana na Nzambe na yo. »


Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.


Yango wana, bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te.


Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.


Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.


Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki.


Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango.


Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »


nkolo ya mosali yango akozonga na mokolo oyo ye, mosali, azali kozela ye te, mpe na ngonga oyo ayebi te. Boye akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na basali oyo bazangi bosembo.


pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso.


Solo, mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Na mokolo yango, na lokito monene, Likolo ekolimwa, biloko ekozika na moto mpe ekonyangwama, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekozwa etumbu ya kobebisama na moto.


Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ