Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 25:5 - Mokanda na Bomoi

5 Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 25:5
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Butu mobimba, na mbeto na ngai, nazali koluka mobali oyo motema na ngai elingaka ; naluki ye, kasi namonaki ye te.


Nalalaki, kasi makanisi na ngai ezalaki ya kolamuka. Yoka ! Mongongo ya molingami na ngai ezali koyokana na ekuke ! « Molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema, ebenga na ngai, oyo azali kitoko koleka mpo na ngai, fungolela ngai ndako, pamba te moto na ngai etondi na londende, mpe suki na ngai epoli na matanga ya londende ya butu. »


Nasili kolongola nzambala na ngai, nalata yango lisusu ? Nasili kosukola makolo na ngai, nabebisa yango lisusu ?


Emoniseli oyo ezali kaka kozela tango na yango oyo ekatama ; ezali kolobela makambo oyo ekosalema na tango ya suka ; solo, ekokosa te. Ata ewumeli, zela yango kaka ; solo, ekokokisama, ekowumela te.


Kasi soki azali mowumbu mabe oyo amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, »


Sima na mikolo ebele, nkolo ya basali wana azongaki mpe alobaki na bango : « Boyebisa ngai ndenge nini bosalelaki bozwi na ngai. »


ba-oyo bazalaki mayele bakamataki minda na bango mpe milangi oyo ezalaki na mafuta kati na yango.


Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye ! »


Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi ; alobaki na Petelo : — Boni, bokokaki te kosenzela elongo na Ngai mpo na ngonga moko ?


Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo.


Na tango yango, bato bazalaki kozela Zakari mpe komituna mpo na nini azali kowumela tango molayi kati na Esika ya bule.


Kasi soki mosali yango amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, » mpe akomi kobeta basali mpe basi basali ; kolia, komela masanga mpe kolangwa,


Nazali koloba na bino : akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya ! Boni, akokuta kondima kati na mokili ?


Sima, Yesu alobaki na bato lisese oyo : — Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango epai ya basali bilanga mpo ete bafutelaka yango, mpe akendeki mobembo ya tango molayi.


Bosalaka bongo awa bozali kososola tango nini tozali kobika. Tango ya kolamuka na pongi na bino ekoki, pamba te lobiko ekomi sik’oyo pene na biso, koleka tango tozwaki kondima sika.


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.


kasi, oyo bozali na yango, bosimba yango makasi kino nakoya. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ