Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 24:8 - Mokanda na Bomoi

8 Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 24:8
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eloko kaka bokotikala na yango : kokitisa elongi na se elongo na bato ya boloko to kokufa elongo na bato oyo babomi. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.


Kasi atako bongo, bato bazongaki kaka te epai na Yawe oyo abetaki bango, mpe balukaki te Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Solo, mabe etumbaka lokola moto oyo ezikisaka basende mpe banzube, ezikisaka bazamba minene mpe ematisaka makonzi ya milinga.


Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.


Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana bipai na bipai, mpe nzala ekozala makasi penza. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.


Kasi liboso ya makambo wana nyonso, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakofunda bino kati na bandako ya mayangani, bakobwaka bino na baboloko, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe ya bayangeli, mpo na Kombo na Ngai.


Yawe akotindela bino mpe bakitani na bino bitumbu ya somo : bapota minene oyo esilaka te mpe bokono ya makasi oyo esilaka te.


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


Boyoka sik’oyo, bino bazwi : Boyoka mawa mpe bolela mpo na pasi oyo ekokweyela bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ