Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 24:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 24:6
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abangaka basango ya mabe te ; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.


Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. »


loba na ye : ‹ Kitisa motema, zala na kimia, kobanga te ; tika ete motema na yo etungisama te mpo na bakoni mibale oyo ezali kopela : kanda makasi ya Retsini, moto ya Siri, mpe ya mwana mobali ya Remalia !


Bozali koganga : ‹ Ah mopanga ya Yawe, okopema tango nini ? Zonga na ebombelo na yo, tika koboma mpe zala kimia ! ›


Kasi lokola basilaki kolapa ndayi ete bakotosa ye, bavandi ya Yelusalemi bakomona yango lokola bimoniseli ya pamba mpe ya lokuta. Kasi mokonzi ya Babiloni akosala ete bakanisa lisusu mabe na bango, mpe akomema bango na bowumbu.


Tango mokonzi Erode ayokaki bongo, motema na ye etungisamaki makasi elongo na Yelusalemi mobimba.


Sango Malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ete ezala litatoli epai ya bikolo nyonso ; sima na yango kaka nde suka ekoya.


Nzokande, soki mpe esalemi ndenge wana, Makomi ekokokisama te ; pamba te ezali koloba ete makambo nyonso wana esengeli kosalema bongo.


Soki boyoki basango ya bitumba mpe ya mobulu, bobanga te ; pamba te makambo wana esengeli nanu kosalema, kasi ekozala mbala moko suka ya mokili te.


Ekomama : « Batangaki Ye elongo na babomi bato ; » mpe nazali koloba na bino : makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai.


Yesu alobaki : — Tika ete mitema na bino etungisama te ! Bondima Nzambe mpe bondima Ngai.


Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !


bopesaka na mobulu nzela te ya kokota na pete kati na makanisi na bino to tika ete mitema na bino etungisamaka te likolo na emoniseli, liloba to mokanda oyo bato bakoki koloba na tina na yango ete ewuti epai na biso mpe ezali koloba ete mokolo ya Nkolo esili kokoma.


Bongo mpunda mosusu ebimaki : ezalaki ya motane makasi. Motambolisi na yango apesamelaki nguya ya kolongola kimia na mokili mpe ya kosala ete bato babomana bango na bango. Mpe bapesaki ye lisusu mopanga moko ya monene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ