Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 24:5 - Mokanda na Bomoi

5 Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 24:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na ngai : — Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta ; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko.


Natindaki basakoli wana te, kasi tala ndenge bapoti mbangu mpo na kokende ; nalobaki na bango likambo moko te, kasi tala bango wana bazali kosakola !


« Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai ; bazali koloba : ‹ Tala, naloti ndoto ! Naloti ndoto ! ›


Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bokanisa te ete bato ya Babiloni bakolongwa na mokili na bino. Te ! Bakolongwa te. ›


Basakoli ebele ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele.


Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.


Ngai, nayei na Kombo ya Tata na Ngai, kasi boboyi koyamba Ngai ! Nzokande, soki moto mosusu ayei na kombo na ye moko, bokoyamba ye.


Yango wana nalobaki na bino : « Bokokufa kati na lisumu na bino ; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.


Alobaki lisusu : — Sima na bino kotombola Mwana na Moto nde bokoyeba ete, Ngai, nazali oyo azali, mpe ete nasalaka eloko moko te na ndenge na Ngai moko, kasi nalobaka kolanda makambo oyo Tata ateyaki Ngai.


Bana, tokomi na tango ya suka ; ndenge kaka boyokaki ete monguna ya Klisto azali koya, nzokande banguna ya Klisto basili koya sik’oyo ebele, ndenge wana mpe tosengeli koyeba ete tokomi na tango ya suka.


Boye nani mokosi ? Mokosi azali moto oyo awangani ete Yesu azali Klisto. Mpe moto ya ndenge wana azali monguna ya Klisto : awanganaka Tata mpe Mwana.


Moto nyonso oyo azali kondima Yesu te azali na Molimo ya Nzambe te, kasi azali na molimo ya monguna ya Klisto, oyo boyokaki na tina na ye ete azali koya mpe azali sik’oyo kati na mokili.


Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ