Matayo 24:49 - Mokanda na Bomoi49 mpe akomi kobeta baninga na ye ya mosala, bawumbu lokola ye, kolia mpe komela masanga mesa moko elongo na balangwi masanga, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezali mpe kaka bango nde babetisaka baninga mabaku na tango ya kolia na lisanga : baliaka na lokoso mpe na soni te, balukaka kaka bolamu na bango ; bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ezali komema ; bazali lokola banzete oyo ebotaka bambuma te, ata na eleko ya kobuka bambuma ; ekufaka mbala mibale soki bapikoli yango.
Bongo mpo na nini bozali kozwa na limemia te bambeka mpe makabo na Ngai, oyo napeselaki mitindo ete epesama kati na Ndako na Ngai ? Mpo na nini ozali kopesa bana na yo ya mibali lokumu koleka Ngai, na ndenge bozali kolia biteni oyo eleki kitoko kati na bambeka oyo bato na Ngai, Isalaele, bazali kobonzela Ngai ?