Solo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Bomitika te ete basakoli mpe bato ya soloka oyo bazali kati na bino bakosa bino : bondimela te bato oyo bazali kolimbolela bino bandoto.
Yesu azongisaki : — Bosala keba ete moko te akosa bino ! Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai, bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe « Tango ekoki ! » Bolanda bango te.
Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.
Botelemelaka bato oyo bamisepelisaka na komikitisa ya lokuta to na kosambela ba-anjelu, bopesaka bango nzela te ya kozangisa bino elonga. Bamipesaka na bimoniseli ya makanisi na bango, batondi na lolendo ezanga tina,
Bosalaka keba ete moko te akanga bino na motambo ya mayele ya lokuta mpe ezanga tina, kolanda bokoko ya bato mpe etamboli ya mokili oyo, pamba te ewutaka na Klisto te.
Balingami na ngai, bondimaka te bato nyonso oyo babetaka tolo mpo na koloba ete batondisami na Molimo ya Nzambe ; kasi bomeka bango mpo na koyeba soki bazali penza ya Nzambe, pamba te basakoli ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili.