31 Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.
Akotombola bendele mpo na bikolo mpe akosangisa bana ya Isalaele oyo bazali na bowumbu ; akosangisa esika moko bato ya Yuda oyo bapalangana na mokili mobimba.
Na mokolo wana, bakobeta kelelo oyo ya monene ; bato oyo bazalaki kobebisama na mokili ya Asiri mpe oyo bakendeki na bowumbu na Ejipito bakoya mpe bakogumbamela Yawe na ngomba ya bule, na Yelusalemi.
Boyemba loyembo ya sika mpo na Yawe, bokumisa Ye wuta na basuka ya mabele, bino bato oyo botambolaka na ebale monene, mpe nyonso oyo etondisaka yango, bino bisanga mpe bavandi na yango nyonso !
nakoloba epai ya nor : ‹ Pesa, › mpe epai ya sude : ‹ Kokanga te. › Zongisa bana na Ngai ya mibali wuta na mikili ya mosika, mpe bana na Ngai ya basi wuta na suka ya mabele,
Tombola miso na yo mpe tala na zingazinga : bana na yo nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete bakozala mpo na yo lokola babiju ya talo, mpe okolata bango lokola mokaba ya mwasi mobandami na libala.
Tombola miso zingazinga na yo mpe tala : Bango nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo ; bana na yo ya mibali bawuti mosika, mpe oyo ya basi, bamemi bango na maboko.
Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali ; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso.
Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ebale kino na basuka ya mabele.
Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye ; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe.
Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
Mpe asengelaki kokufa kaka mpo na ekolo yango te, kasi mpe mpo na kosangisa kati na libota moko, bana nyonso ya Nzambe, oyo bapalangana bipai na bipai.
Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Iyo, bayokaki ! Pamba te ekomama : « Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba, maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »
Luka koyeba makambo oyo esalema na mikolo ya liboso, liboso ete yo obotama, wuta mokolo oyo Nzambe asala moto na mokili ; luka oyeba makambo oyo esalema kati na mokili banda na suka moko kino na suka mosusu, soki likambo ya monene boye esila kosalema, soki likambo ya boye esila koyokana.
pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso.
pene ya lokito ya kelelo to mpe pene ya mongongo oyo ezali kobimisa maloba na lolenge ete bato oyo bayokaki maloba yango basengaki ete bayoka lisusu te ata liloba moko,
Tala mabombami oyo ezali kati na minzoto sambo oyo omonaki na loboko na Ngai ya mobali, mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo : minzoto sambo elakisi ba-anjelu ya Mangomba sambo ; mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo elakisi Mangomba sambo. »
Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »
Sima na makambo wana, namonaki ba-anjelu minei batelemi na basonge nyonso minei ya mokili, bazali kokanga mipepe nyonso minei ya mokili mpo ete mopepe ata moke te epepa na mokili to na ebale monene to mpe na banzete.