Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 24:30 - Mokanda na Bomoi

30 Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 24:30
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na bimoniseli na ngai ya butu, namonaki moto moko lokola Mwana na Moto koya elongo na mapata ya likolo ; apusanaki pene ya Mpaka oyo azala liboso ya tango, mpe bamemaki ye liboso na Ye.


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


Na mokolo wana, matanga kati na Yelusalemi ekozala monene lokola matanga ya Adadi-Rimoni na etando ya Megido.


Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?


Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na koya ya Mwana na Moto ;


bayebaki eloko moko te na tina na oyo elingaki kosalema, kino mpela eyaki mpe ekumbaki bango nyonso. Ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na Moto.


Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.


Bongo, bato bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya monene mpe na nkembo.


— Yebisa biso, makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango nyonso ekomi pene ya kokokisama ?


Sima na yango, bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya mpe na nkembo monene.


Kasi kobanda sik’oyo, Mwana na Moto akovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


— Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo ? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.


mpe akopesa bopemi epai na biso mpe epai na bino oyo bozali komona pasi, tango Nkolo Yesu akomimonisa wuta na Likolo, elongo na ba-anjelu na Ye ya nguya,


« Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.


Elembo moko ya monene emonanaki na likolo, ezalaki mwasi moko. Alataki moyi lokola elamba, sanza ezalaki na se ya matambe na ye, mpe, na moto na ye, alataki motole oyo ezalaki na minzoto zomi na mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ