Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango ekopesa lisusu pole na yango te : moyi ekokoma molili tango tongo ekotana, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.
Sanza ekokoma motane, mpe moyi ekoyoka soni, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.
Boni, mokolo ya Yawe ekozala te mokolo ya molili ? Boni, ekozala te mokolo oyo ezanga pole ? Ekozala penza mokolo ya molili makasi, ata kongenga moke ekozala te.
Pamba te pasi ekozala makasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta na ebandeli ya mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
Solo, mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Na mokolo yango, na lokito monene, Likolo ekolimwa, biloko ekozika na moto mpe ekonyangwama, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekozwa etumbu ya kobebisama na moto.
Anjelu ya minei abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, eteni moko kati na biteni misato ya moyi, ya sanza mpe ya minzoto ebebaki. Na bongo, eteni moko kati na biteni misato ya kongenga na yango ekomaki molili. Boye eteni moko kati na biteni misato ya mokolo mpe ya butu ezangaki pole.