Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 24:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 24:22
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.


Na mokili mobimba, » elobi Yawe, « bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato bakobebisama mpe bakokufa ; mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato nde bakotikala na mokili.


Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.


Pamba te babengami bazali ebele, kasi baponami bazali moke.


Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.


Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.


Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.


Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi ? Boni, akozelisa bango ?


Nzokande, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama,


Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.


Ngai Petelo, ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya baponami ya Nzambe oyo bazali kati na bamboka ya bapaya mpe bapalangani na bituka ya Ponti, ya Galatia, ya Kapadose, ya Azia mpe ya Bitini.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ