Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 24:14 - Mokanda na Bomoi

14 Sango Malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ete ezala litatoli epai ya bikolo nyonso ; sima na yango kaka nde suka ekoya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 24:14
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala, mokolo yango nde yango oyo ! Esili kobelema ! Kobebisama eboti mbuma, lingenda ebimisi bafololo, lolendo ekoli !


Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene.


Nazali lisusu koloba na bino penza ya solo : soki bato mibale kati na bino bayokani awa na mokili mpo na kosenga eloko songolo to pakala, Tata na Ngai oyo azali kati na Likolo akopesa bango yango.


Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?


Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.


Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.


Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.


Pamba te esengeli ete Sango Malamu esakolama liboso epai ya bikolo nyonso ya mokili.


Na tango wana, Sezare Ogisite abimisaki mobeko ya kotanga motango ya bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mikili nyonso oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Rome.


mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »


Satana amemaki Yesu na esika moko ya likolo makasi, alakisaki Ye mbala moko bokonzi nyonso ya mokili.


kino na mokolo oyo amemamaki na Likolo, sima na Ye kopesa mitindo, na nzela ya Molimo Mosantu, epai ya bantoma oyo aponaki.


Moko kati na bango, kombo na ye ezalaki « Agabisi ; » atelemaki mpe asakolaki na nguya ya Molimo ete nzala makasi ekoya na bamboka nyonso oyo bato ya Rome bazali kokonza. Nzala yango ekotaki na tango ya mokonzi Klode.


Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.


Kasi lokola bamonaki bango te, bamemaki Jazoni mpe bandeko mosusu liboso ya bakambi ya engumba na koganga : — Bato oyo bazali koningisa mokili mobimba bakomi sik’oyo awa,


Makambo oyo Polo azali kosala ezali koluka kaka te kobebisa lokumu ya mosala na biso, kasi ezali mpe kosilisa lokumu ya tempelo ya Artemisi, nzambe monene ya mwasi ; ezali lisusu kosilisa nkembo ya Artemisi oyo Azia mobimba mpe mokili mobimba ezali kogumbamela.


Mpe sik’oyo, nayebi ete bokomona elongi ngai lisusu te, bino nyonso oyo nalekaki kati na bino mpo na koteya sango ya Bokonzi ya Nzambe.


Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Iyo, bayokaki ! Pamba te ekomama : « Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba, maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »


Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.


oyo ekomaki kino epai na bino. Sango Malamu yango epanzani mokili mobimba, ezali kobota bambuma ebele mpe ezali kokende liboso, ndenge kaka esalaki kati na bino wuta mokolo oyo boyokaki yango mpe bozwaki penza bososoli ya kokoka na tina na ngolu ya Nzambe.


Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba : « Tika ete ba-anjelu nyonso ya Nzambe bagumbamelaka Yo ? »


Nzambe atiaki te mokili oyo ezali koya, mokili oyo tozali kolobela, na se ya bokonzi ya ba-anjelu.


Bongo namonaki anjelu mosusu kopumbwa na likolo makasi. Azalaki na Sango Malamu ya seko na seko ya kosakola na bavandi nyonso ya mokili, na bikolo nyonso, na mabota nyonso, na nkota nyonso mpe na bato nyonso.


Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Lokola obatelaki etinda na Ngai ya kozala na molende, Ngai mpe nakobatela yo na tango ya pasi oyo ekokweyela mokili mobimba mpo na komeka bavandi na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ