Matayo 24:11 - Mokanda na Bomoi11 Basakoli ebele ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala : batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.