Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo, noki te nakomikomisa mosika na yo mpe nakokomisa mokili na yo esobe, mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »
Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki : — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?
Pamba te, nazali koloba na bino : Kobanda lelo, bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : ‹ Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! › »