Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 23:8 - Mokanda na Bomoi

8 Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 23:8
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?


Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »


Bolinga te ete bato babenga bino ‹ bakonzi, › pamba te bozali kaka na Mokonzi moko, Klisto.


balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe babenga bango ‹ Moteyi. ›


Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki : — Moteyi, ezali ngai ? Yesu azongiselaki ye : — Olobi yango.


Mbala moko, apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Mbote, Moteyi ! Mpe apesaki Ye beze.


Yesu alobaki na ye : — Olingi nasala nini mpo na yo ? Mokufi miso azongisaki : — Moteyi, nalingi komona.


Petelo akanisaki likambo oyo esalemaki mpe alobaki na Yesu : — Moteyi, tala ! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekawuki !


Tango kaka Yuda akomaki, akendeki epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Moteyi ! Mpe apesaki Ye beze.


Petelo alobaki na Yesu : — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Tokotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya.


Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.


Bongo tango Yesu abalukaki mpo na kotala na sima, amonaki bango mibale bazali kolanda Ye. Atunaki bango : — Bolingi nini ? Bazongisaki : — Rabi, ovandaka wapi ?


Natanaele alobaki : — Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe ; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.


Bayekoli balobaki na Ye : — Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te ; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna ?


Yesu alobaki na ye : — Mari ! Mari abalukaki mpe alobaki na lokota ya Ebre : — Rabuni  !


Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te.


Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye : — Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli ? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.


Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu : — Rabi, lia.


Tango bakutaki Ye na ngambo mosusu ya ebale, batunaki Ye : — Rabi, okomaki awa tango nini ?


Bayekoli na Ye batunaki Ye : — Moteyi, nani asalaki masumu mpo ete moto oyo abotama mokufi miso : boni, ezali ye moko to baboti na ye ?


ezali mpe te mpo na kokonza kondima na bino, kasi tozali kosala elongo na bino mpo na esengo na bino, pamba te botelemi ngwi kati na kondima.


Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.


oyo apesaka bomoi na mabota nyonso kati na Likolo mpe awa na mabele,


lokola mowumbu lisusu te kasi koleka kutu ata mowumbu, lokola ndeko ya bolingo. Azali na litomba mingi mpo na ngai, kasi azali mpe na litomba mingi lisusu koleka mpo na yo, lokola moto mpe lokola ndeko kati na Nkolo.


Bandeko na ngai, bozala ebele te ya koluka kozala balakisi, pamba te boyebi malamu ete, biso balakisi, tokosambisama makasi.


na makanisi te ya kokonza bato oyo bapesameli bino, kasi na kozalaka bandakisa mpo na etonga.


Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.


Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »


Kasi anjelu alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli ; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ