6 Balingaka kovanda na bisika ya lokumu kati na bafeti, mpe na bisika ya liboso kati na bandako ya mayangani ;
Yesu atunaki ye : — Olingi nini ? Azongisaki : — Laka ngai ete bana na ngai mibale oyo ya mibali bakovanda kati na Bokonzi na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.
Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino ; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu ;
Nakomelaki Lingomba mokanda moko ya mokuse ; kasi Diotrefi, oyo alingaka kaka kozala mokonzi na makambo nyonso, akoyamba biso te.