Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 23:3 - Mokanda na Bomoi

3 Boye, bosengeli kosala keba na mateya nyonso oyo bateyaka bino, mpe bobongisa etamboli na bino kolanda mateya na bango ; kasi bomekola te misala na bango, pamba te batiaka mateya na bango na misala te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 23:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.


Soki osaleli toli oyo napesi yo mpe soki Nzambe akambi yo, okolonga, mpe bato oyo nyonso bakobanda kozonga na esengo epai na bango.


Tata akendeki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Mwana yango azongisaki : « Malamu, nkolo na ngai, nakeyi ! » Kasi akendeki te.


« Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazali na mokumba ya koteya bato mibeko ya Moyize.


Babongisaka mikumba ya kilo makasi mpe batiaka yango na mapeka ya bato mosusu, kasi bango moko balingaka ata moke te kotombola mosapi oyo ya moke mpo na kosunga bato yango na komema mikumba yango.


Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki : — Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te !


Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te bokonzi nyonso ewutaka na Nzambe, mpe ezali Nzambe nde atia bakonzi oyo bazali.


Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.


Pusana pembeni mpe yoka makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba ; bongo na sima, okoyebisa biso makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba na yo ; mpe biso tokoyoka mpe tokotosa yango. »


bakobanda komilakisa lokola nde bazali na botosi kati na makambo ya Nzambe, nzokande bawanganaka nguya na yango. Kima bato ya lolenge wana !


Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ