17 Bino, bakufi miso, bozali penza bazoba ! Eloko nini eleki motuya : wolo to Tempelo oyo ekomisaka wolo bule ?
Bino bato ya kilikili, bososola ! Bazoba, bokokoma mayele tango nini ?
Bolobaka lisusu : ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya etumbelo, wana ezali likambo te ; kasi soki alapi ndayi na kombo ya likabo oyo ezali na likolo ya etumbelo, asengeli kokokisa ndayi na ye. ›
Bakufi miso ! Eloko nini eleki motuya : likabo to etumbelo oyo ekomisi likabo bule ?
Pamba te Mobulisi ya basumuki mpe bato oyo babulisami bazali kaka na Tata moko. Yango wana Yesu azalaki na soni te ya kobenga bango bandeko na Ye,