Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 23:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 23:13
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te : « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka ? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? »


Mawa na mobateli bibwele ya zoba oyo asundolaka etonga na ye ! Tika ete mopanga ekata ye loboko mpe etobola ye liso oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ! Tika ete loboko na ye ekawuka, solo, ekawuka penza ! Tika ete liso na ye, oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ekufa, ekufa solo !


Mawa na bino, batambolisi bakufa miso ! Bolobaka : ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya Tempelo, wana ezali likambo te ; kasi soki alapi ndayi na kombo ya wolo ya Tempelo, wana asengeli kokokisa ndayi na ye. ›


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko ; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko : bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bosukolaka malamu libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondisaka yango na biloko ya moyibi mpe ya lokoso na bino.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe : emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Botongaka bakunda mpo na basakoli, mpe bokomisaka kitoko malita ya bato ya sembo.


Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko, pamba te bolongolaki fungola ya boyebi ! Bino moko bokotaki te, mpe bopekisaki bato oyo bazalaki na posa ya kokota.


Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto.


Bafarizeo babengisaki lisusu, mpo na mbala ya mibale, moto oyo azalaki mokufi miso mpe balobaki na ye : — Pesa Nzambe nkembo na koloba solo ; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu.


Bazongiselaki ye : — Ndenge nini yo moto oyo obotama mobimba kati na lisumu oteya biso ? Boye, babenganaki ye.


Kasi Elimasi, moto ya maji (pamba te yango nde ezali ndimbola ya kombo na ye), atelemelaki bango mpe azalaki kosala nyonso mpo na kopengwisa kondima ya moyangeli.


Alobaki : — Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sik’oyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana.


babengisaki bantoma, babetisaki bango bafimbu mpe bapekisaki bango ete bateya lisusu Kombo ya Yesu te. Sima na yango batikaki bango kokende.


Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi ; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.


Ndenge Janesi mpe Jambresi batelemelaki Moyize, ndenge wana mpe bato wana batelemelaka solo. Bazali bato oyo makanisi na bango esila kobeba mpe kondima na bango esila kokufa.


Yo mpe sala keba liboso na ye, pamba te atelemelaki makasi mateya na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ