10 Bolinga te ete bato babenga bino ‹ bakonzi, › pamba te bozali kaka na Mokonzi moko, Klisto.
Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino.
Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko.
Bobenga moto moko te awa na mokili ‹ Tata, › pamba te bozali kaka na Tata moko, mpe azali kati na Likolo.
Azongiselaki bango : — Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye : « Moteyi alobi : ‹ Tango na Ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo. › »
Misala ezali ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko.