Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 22:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 22:7
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.


Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi ; nani akoki kotelema na mokolo yango ?


Nakozongisela bino mibu oyo mampinga minene ya mankoko, ya makelele, ya mabanki minene mpe ya bambinzo eliaki : mampinga minene na Ngai oyo natindaki mpo na kobundisa bino.


Ata mpe kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi, nakosopa Molimo na Ngai, na mikolo wana.


mpe bamosusu bakangaki basali ya mokonzi, banyokolaki bango mpe babomaki bango.


Alobaki na basali na ye : « Bilei ya feti esili kobongisama malamu, kasi babengami mpo na kozala na feti yango babongaki na yango te.


Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »


Wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; tika ete bato oyo bakozala kati na Yelusalemi babima ; mpe tika ete bato oyo bakozala kati na bilanga bazonga te kati na engumba !


Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.


bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ